Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 34:5 - Mokanda na Bomoi

5 Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai ; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 34:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi : « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Mwana na ngai ya mobali ! »


Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda.


Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso ? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ?


Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.


Yo nde obikisaka banyokolami, okitisaka bato na lofundu.


Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te ; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.


Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.


Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »


landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo !


Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.


Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.


Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo.


Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.


Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ