Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.
Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »
Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi.
Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.
Azalaki koloba na mongongo makasi : « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki ! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi ! »