Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.
Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen !
Ezali na kondima nde tososolaka ete mokili esalemaki na nzela ya Liloba na Nzambe, mpe ete biloko oyo emonanaka esalemaki na nzela ya biloko oyo emonanaka te.
Wana bakanisaka bongo, babosanaka na nko ete, na kala, Likolo mpe mabele ezalaki ; ete na nzela ya Liloba na Nzambe, mabele ebimaki wuta na mayi mpe epikamaki kati na mayi.