Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »
Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama ? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye ? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima ? »
Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.