Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo.
Bato yango basalaki mosala na bango na boyengebene mpe na bokambami ya Balevi Yaati mpe Abidiasi, bana mibali ya Merari. Zakari mpe Meshulami, bana mibali ya Keati, nde bazalaki kokengela mosala na bango.
Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, bino bato oyo botambolaka na ebale monene, mpe nyonso oyo etondisaka yango, bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso !
bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ;
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili.
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.