Mpo na Yedutuni, bazwaki kati na bana na ye ya mibali : Gedalia, Tseri, Ezayi, Shimei, Ashabia mpe Matitia. Bazalaki bango nyonso motoba na bokambami ya tata na bango Yedutuni oyo azalaki kosakola mpe kosalela lindanda mpo na kopesa matondi mpe kokumisa Yawe.