Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 33:16 - Mokanda na Bomoi

16 Ezali te limpinga monene nde ebikisaka mokonzi to nguya monene nde ekangolaka elombe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 33:16
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.


Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo.


Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi ! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe.


Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »


Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.


Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga.


alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene, avandisaka bango na kiti ya bokonzi elongo na bakonzi mpe atombolaka bango mpo na libela.


Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene ? Okotikela yango mosala na yo ?


Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.


Na nguya na Yo, obenganaki bikolo mpe otiaki bakoko na biso ; obetaki bikolo ya bapaya mpe ofulukisaki bakoko na biso.


Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki.


Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.


Ndenge nini bokoki koloba : ‹ Tozali basoda ya mpiko, bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? ›


Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.


Bolonaki makambo mabe, bobukaki mpe makambo mabe mpe boliaki mbuma ya lokuta, pamba te botiaki elikya na makasi mpe na ebele ya basoda na bino.


Moto oyo aleki na mbangu akobika te, moto oyo aleki makasi akokoka kobimisa makasi na ye te, mpe soda ya mpiko akokoka kobikisa bomoi na ye te.


Mobeti tolotolo akolonga te, soda ya mpiko akokoka kokima te, mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpunda akobikisa bomoi na ye te ;


Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »


Yawe alobaki na Jedeon : « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba : ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. ›


Kasi Yawe alobaki na Jedeon : « Bato bazali kaka ebele. Kitisa bango nyonso na mayi, mpe kuna, nakomeka bango mpo na yo. Soki nalobi : ‹ Oyo akoki kokende na yo, ye nde asengeli kokende na yo. › Kasi soki nalobi : ‹ Oyo akoki te kokende na yo, ye asengeli te kokende na yo. › »


Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ