Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele ! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe ?
alobaki : — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo !
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo ! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi ? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.