1 Bino bato ya sembo, bobeta milolo ya esengo na tina na Yawe ! Kokumisa Nzambe ebongi na bato oyo bazali alima.
Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene !
Bokumisa Yawe ! Pamba te Yawe azali malamu ! Boyembela Kombo na Ye, pamba te ezali kitoko makasi.
Bokumisa Yawe ! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !
Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo ! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.
Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe ; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
Kolanda ndenge ekomama : « Moto ya sembo azali te, ata moko te ;
Pamba te ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.
Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !