Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 32:6 - Mokanda na Bomoi

6 Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 32:6
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya


Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni ? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta ?


Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.


Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.


Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.


Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.


Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na tango ya malamu, nakoyanola yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ;


Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.


Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.


abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.


pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.


Kasi mpo na tina wana, Nzambe ayokelaki ngai mawa mpo ete, kati na ngai oyo naleki na masumu, Yesu-Klisto atalisa motema monene na Ye, oyo ezangi ndelo lokola ndakisa epai ya bato oyo bakondimela Ye mpo na kozwa bomoi ya seko.


Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ