Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.
Bana na yo balembi, balali-lali na babalabala nyonso lokola mboloko oyo ekangami na motambo ; kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo nde ebuki-buki bango lolenge wana.
Natombokaki likolo ya posa na ye ya kozwa bomengo na nzela ya moyibi ; napesaki ye etumbu, nabombaki elongi na Ngai na kanda, kasi apengwaki kaka mpo na kolanda posa mabe ya motema na ye.
Yuda akei na bowumbu, akomi konyokwama mpe kosala misala makasi ; azali kovanda kati na bikolo, azali lisusu na esika ya kopema te. Bato nyonso oyo bazali kolanda ye, bakangi ye kati na pasi makasi.
Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.