Oh Nzambe, katela bango etumbu. Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi. Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango, pamba te batombokeli nde Yo.
Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.
Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo ! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino.
Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,
Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.