Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 31:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 31:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.


Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi mpo na kovandisa yo na esika ya pole, esika oyo ezangi mitungisi ; akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko.


Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.


Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.


Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.


Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.


Nakokaba bato ya Ejipito na maboko ya bakonzi ya mitema mabe, mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ;


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


Alobaki na Davidi : — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo !


Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ