Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 31:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yoka ngai mpe kangola ngai noki ! Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 31:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.


Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.


Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo ; yanola ngai noki !


Ayokaki ngai ; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.


Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !


Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene.


Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.


Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.


Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;


Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga epai wapi nakoki kokende tango nyonso. Ozwaki mokano ya kobikisa ngai, pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.


Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola biso mpe limbisa masumu na biso mpo na Kombo na Yo !


Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »


Tango akoya, Molimo ya bosolo, akotambolisa bino kati na bosolo nyonso ; pamba te akoloba te makambo kowuta na Ye moko, kasi akoloba kaka makambo nyonso oyo akoyoka, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya ;


mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ