23 Kati na kobanga na ngai, namilobelaki : « Obengani ngai penza mosika na Yo ! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.
Nazalaki komilobela : « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? »
Bapaya oyo bakangami na Yawe mpo na kosalela Ye, mpo na kolinga Kombo na Ye mpe kogumbamela Ye, bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba mpe bakobebisa te bosantu na yango, mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ;
Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa.
tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.