Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 31:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nayokaka matongi na bango na tina na ngai tango basanganaka mpe basalaka makita mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 31:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bango bamonaki ye na mosika liboso ete akoma pene na bango, bayokanaki mpo ete baboma ye.


Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.


Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.


Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.


Oh Nzambe, kozala mosika na ngai te ! Nzambe na ngai, yaka noki mpo na kosunga ngai.


Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo ; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !


Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?


Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ