Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 30:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 30:5
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso.


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela ;


Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.


Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !


Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.


Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.


Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ; soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.


Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.


Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe ; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.


Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.


Na mokolo wana, okoloba : « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai !


Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino ; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.


Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.


Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama !


Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ