3 Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono.
Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, mpe nakowumela kati na pole na esengo. ›
Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda.
Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.
Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.
Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.
Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo, kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi, okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.
Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi.
Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo ; ezali mpe na nzela na yango nde ngai nazwi bomoi. Ozongiselaki ngai nzoto kolongono mpe opesi ngai bomoi.