Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 30:12 - Mokanda na Bomoi

12 Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 30:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe ! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango ! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.


Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda.


mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.


Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.


Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.


Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.


Kasi ezali Yo nde obikisaka biso wuta na maboko ya bayini na biso, mpe oyokisaka bayini na biso soni.


Nzambe, lendisa motema na ngai ; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.


Kasi ngai, nakozala na elikya tango nyonso mpe nakokoba kokumisa Yo.


Nakoganga na esengo tango nakoyemba banzembo mpo na lokumu na Yo, pamba te okangoli bomoi na ngai.


komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.


Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino : soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga !


Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !


na koloba : « Amen ! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela ! Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ