Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 30:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 30:11
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.


Mpe Isalaele alobaki : — Ya solo, nandimi ete mwana na ngai Jozefi azali nanu na bomoi ; nakokende mpe nakomona ye liboso ete nakufa.


Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »


Jozafati abangaki makasi ; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei.


‹ Soki mabe moko ekomeli biso : bitumba, etumbu, bokono to nzala makasi, tokoya kotelema liboso ya Tempelo oyo mpe liboso na Yo, pamba te Kombo na Yo ezali kati na Tempelo oyo ; mpe kati na pasi na biso, tokoganga epai na Yo ; bongo Yo, okoyoka, okoyanola mpe okobikisa biso ! ›


Neyemi alobaki na bango lisusu : — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.


mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.


Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ; tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda !


Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina ! Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !


Yawe, yoka mongongo na ngai, soki nabeleli Yo ; salela ngai ngolu mpe yanola ngai.


Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.


Bato mingi bazali kotuna : « Nani akomemela biso bolamu ? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.


tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;


Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu, bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo.


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.


Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.


apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.


Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.


Nazali koloba na bino penza ya solo : wana bino bokozala kolela mpe komitungisa, mokili ekosepela ; bokozala solo na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo.


Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ