Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 30:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 30:1
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.


Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.


Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako.


Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?


mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe.


Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame ; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.


Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu ; soki te, nakokufa,


Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.


Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.


Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.


Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule ; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.


Yawe, bikisa bato na Yo mpe pambola libula na Yo ; zala mobateli na bango mpe sunga bango mpo na libela.


Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.


Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai mpo ete nazongisela bango mabe na mabe.


Nabelelaki Ye na monoko na ngai, mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.


Mpo na nini bikolo eloba : « Nzambe na bango azali wapi ? » Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba ete ozongiseli bango mabe na mabe, mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.


Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango !


Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko : « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »


Bakonzi ya basoda basengeli koloba na mampinga : « Ezali na moko kati na bino oyo awuti kotonga ndako ya sika mpe avandi nanu kuna te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kovanda moto ya liboso na ndako yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ