6 Nalalaka mpe nazwaka pongi ; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.
Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele.
Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.
Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia.
Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.
Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?