Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 3:4
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : — Kobanga te, Abrami ! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.


Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai ; natiaka elikya kati na liloba na Yo.


Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.


Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule ; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.


Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.


Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene ! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.


Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.


Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.


Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.


Yawe azali nguba na biso ; Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.


Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.


Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.


Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.


Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.


Oyokaki ngai libondeli na ngai : « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »


Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;


Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela ; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ