Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye ; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
Yango wana nakolengisa likolo, mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
Ye oyo mongongo na Ye eningisaki mokili na tango ya kala apesi lelo elaka oyo : « Na mbala oyo lisusu, nakoningisa kaka mabele te, kasi nakoningisa mpe Likolo. »