7 Mongongo ya Yawe ebimaka elongo na bakake ya moto.
Azali kotinda yango na mokili mobimba, mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.
Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango mpe eloba na yo : ‹ Tala biso oyo ? ›
Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.
Mapata esopaki mayi ebele, likolo eyokisaki lokito ya kake, mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka na bangambo nyonso.
Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.
Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko.
Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.