Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.
Boyoka makelele kobima longwa na engumba, boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! Ezali nde mongongo na Yawe oyo azali kofuta banguna na Ye kolanda oyo ekoki na misala na bango.
Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.
Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »