Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 28:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 28:7
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : — Kobanga te, Abrami ! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.


bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.


Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.


Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Nzokande, ozali Mosantu, ovandaka na Kiti na Yo ya Bokonzi, kati na masanzoli ya Isalaele.


Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.


Ebele bazali koloba na tina na ngai : « Nzambe akobikisa ye te ! »


Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.


Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye, pamba te totiaka elikya na biso kati na Kombo na Ye ya bule.


Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango, oyo batonga makasi.


Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.


Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi ; mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna ?


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.


Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.


Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ; kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ