Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 27:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ata limpinga ezingeli ngai, motema na ngai ekobanga soki moke te ; ata etumba etelemi mpo na koboma ngai, atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 27:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.


Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te kozala likonzi na yo, mpe bosembo na yo esengeli te kosimba elikya na yo ?


Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.


Nalalaka mpe nazwaka pongi ; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.


Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.


Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.


na kolenga te liboso ya banguna na bino. Mpo na bango, ezali elembo ya libebi ; kasi mpo na bino, ezali elembo ya lobiko, mpe ewutaka na Nzambe.


Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.


Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.


Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ