Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 27:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nakozalaka na elikya na likambo oyo : nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 27:13
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi.


mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye.


Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !


Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »


Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.


Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai : Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.


Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.


Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.


Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.


Namilobelaki : « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo !


Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.


Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »


nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi.


Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;


Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.


Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ