Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 27:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai, pamba te batatoli ya lokuta batelemi mpo na kokosela ngai makambo, bazali kobimisa maloba mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 27:12
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.


Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi !


Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.


Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi, bazali kopesa ngai mituna na tina na makambo oyo nayebi te.


Tika ete bamilobela te : « Ah ! Tala makambo oyo tozalaki koluka ! » Tika ete baloba te : « Tolie ye. »


Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.


Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai mpo ete nazongisela bango mabe na mabe.


Esengo na moto oyo akanisaka mobola ! Yawe akokangola ye na tango ya pasi.


Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.


Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.


Nzokande, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendeki epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe,


Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto ;


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ