12 Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima ; nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.
Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.
Bokumisa Yawe ! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.
Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.
mpo na kozongisela Yo matondi mpe kotatola misala minene na Yo.
Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, tambolisa ngai na nzela ya alima, pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Bopambola Nzambe kati na mayangani, bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.
Moto ya sembo atambolaka na kimia, kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengama akobima na pwasa.
tango alobaki : « Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na Ngai, nakokumisa Yo na banzembo kati na mayangani. »
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.