kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye ! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa ! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.
— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ?
mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.
Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,