yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.
Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›