Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 25:18 - Mokanda na Bomoi

18 Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 25:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »


Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.


Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai, pamba te nabosanaka mibeko na Yo te.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, kanisa Davidi ; kanisa pasi na ye nyonso !


Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »


Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso ! Tala mpe mona soni na biso !


Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.


Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. »


Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ