atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !
Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakolembisa kanda ya motema na Ngai ; mpo na lokumu na Ngai, nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. Yango wana, nakoboma yo te.
Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.
Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki.
Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu ! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele.