Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 24:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 24:7
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.


mpe Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango mpo na lipata, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo na Ye.


Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.


Yawe, telema, yaka na Esika na Yo ya bopemi ! Yaka elongo na Sanduku ya Boyokani epai wapi nguya na Yo ezali.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.


Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye, mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.


Bofungola bikuke mpo ete ekolo ya sembo, ekolo oyo ebatelaka boyokani, ekoka kokota !


Boleka, boleka na bikuke ! Bobongisela bato nzela, bopasola nzela, bopasola nzela ya monene ! Bolongola mabanga, botombola bendele liboso na bato ya bikolo.


Mpo na yo, ndako molayi ya bakengeli bibwele, ngomba ya Siona, mboka kitoko, bakozongisela yo bokonzi na yo ya kala, bakozongisa bokonzi ya Yelusalemi, mboka kitoko. »


nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango ; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu.


Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo.


oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ