2 Pamba te ezali Yawe nde atia yango na likolo ya bibale minene mpe apikaki yango na likolo ya miluka.
Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »
Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ? Yebisa ngai soki ozali mayele.
Atandaki mabele na likolo ya mayi ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.
Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo ! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.
Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.
Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye ; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.
Boloba kati na mabota : « Yawe azali Mokonzi ! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.