Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 24:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Davidi. Mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Yawe. Mokili mpe ezali ya Yawe, elongo na bavandi na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 24:1
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Oh Yawe, Nzambe na biso, bomengo nyonso oyo tobongisi mpo na kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Yo ya Bule ewuti na loboko na Yo mpe ezali ya Yo.


Amatsia atunaki moto na Nzambe : — Boni, nkoto misato na nkama mitano ya bakilo ya palata oyo napesaki mampinga ya Isalaele ekosuka ndenge nini ? Moto na Nzambe azongisaki : — Yawe akoki kopesa yo koleka oyo wana.


Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili ? Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba ?


Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.


Nani adefisaki ngai eloko mpo ete nafuta niongo na ye ? Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.


pamba te banyama nyonso ya zamba ezali ya ngai ; ezala ata ebele ya banyama oyo ezali kati na bangomba, nyonso ezali ya ngai.


Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te, pamba te mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya ngai.


Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye ; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.


Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo ! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !


Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,


Moyize azongisaki : — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.


Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.


Oh Siona, mboka kitoko, telema mpe tuta ble, pamba te nakopesa yo maseke ya bibende mpe basapato ya bronze, bongo okobuka bikolo ebele mike-mike mpe okopesa bomengo na bango, oyo bazwaki na nzela ya mabe, lokola likabo epai na Yawe, mpe bozwi na bango epai na Mokonzi ya mokili mobimba.


Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.


Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.


Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ