Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele ; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
Boye, akozala kimia na bango ! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.
Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?
pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.