Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 22:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !


Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.


Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.


Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele ; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.


Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi.


Okomisi biso eloko ya lisuma na miso ya bato oyo bazali pembeni na biso, eloko ya litio mpe ya liseki na miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.


Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, alobi epai na ye oyo atiolami mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, likolo na Yawe oyo azali Sembo, Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »


Bato batiolaki mpe basundolaki ye, ye moto na pasi, amesana konyokwama. Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, atiolamaki, mpe tondimaki ye te.


Bozali koseka nani ? Bozali kofungolela nani monoko ? Bozali kotiela nani penza monoko ? Boni, bozali bana ya batomboki te, bozali libota ya lokuta te ?


balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! »


Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.


Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu.


Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba : — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato,


Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.


Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ