Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 22:3 - Mokanda na Bomoi

3 Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te ; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 22:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako nagangi ete basali ngai mabe, nazali kozwa ata eyano moko te ; ata soki nabeleli ete basunga ngai, moto oyo akokata likambo azali te.


Oh Nzambe, nazali koganga epai na Yo, kasi ozali kopesa ngai eyano te ; natelemi, kasi ozali kotala ngai kaka pamba.


Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.


Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.


Yawe, ozali Nzambe ; Yo nde obikisaka ngai ! Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo !


Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.


Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »


Oh Yawe, kino tango nini nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga, kasi ozali koyoka te ? Nazali koganga epai na Yo : « Minyoko eleki ! » kasi ozali kaka kobikisa te !


Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.


Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ