Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.
kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye,
pamba te bango moko bazali kotatola ndenge nini boyambaki biso mpe ndenge nini botikaki kosambela banzambe ya bikeko mpo na komipesa na Nzambe mpe mpo na kosalela Nzambe na bomoi mpe ya solo,
Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.