25 Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola ; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.
Bokumisa Yawe ! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.
Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi mpe na maseke ya mpakasa.
Nakokumisa Yo kati na mayangani monene, nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.
pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Nakokota kati na Ndako na Yo, nakomemela Yo makabo ya kotumba, nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.
Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka ! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.