Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te ? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai ?
Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.