17 Bambwa ezingeli ngai, ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai, bazali kotambola zingazinga na ngai ; bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.
Nzoto na ye ekawuki na pamba, mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi.
Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,
mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye.
Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye.
Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !