Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 22:16 - Mokanda na Bomoi

16 Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 22:16
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »


Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te ! Ozali makasi na ngai ; yaka noki kosunga ngai.


Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.


bebisa bango na kanda na Yo, bebisa bango kino bazala lisusu te. Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonza kati na Jakobi kino na suka ya mokili.


Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesa bikolo nyonso etumbu ; koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.


Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai, mpe ngulupa ya bato na kanza bazali koluka koboma ngai ; batosaka Yo ata moke te.


Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, banyokolaki ye mpo na masumu na biso ; etumbu oyo ememelaki biso kimia ekweyaki na nzoto na ye ; mpe na nzela ya bapota na ye, biso tobikisami na bokono na biso.


Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki.


Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke ;


Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.


Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa.


Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.


Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei : soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.


Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango.


Eteni mosusu ya Makomi elobi : « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. »


Bayekoli mosusu balobaki na ye : — Towuti komona Nkolo ! Kasi Toma azongiselaki bango : — Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te.


Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !


Bosala keba na bambwa, na bato mabe mpe na bato oyo batindikaka bino na kokatisa ngenga !


Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ