Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango mpo na kotiola yo, bazali koseka yo mpe kolia minu na bango ; bongo bazali koloba : « Tomeli ye ! Tala mokolo oyo tozalaki kozela ! Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango ! »
Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.