Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ; nakamwaki ete moto azalaki te mpo na kosunga ngai ! Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.
Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.