Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te ; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.
Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?
Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : — Eloi, Eloi, lema sabachtani ? Elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.