Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 21:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 21:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mokonzi kovanda na ndako na ye mpe Yawe kopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingelaki ye,


Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.


Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.


Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


Bavandi ya esobe bakofukama liboso na ye, mpe banguna na ye bakolembola putulu.


Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo oyo esambelaka banzambe ya bikeko, bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebele koleka Yelusalemi mpe Samari,


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.


Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga.


Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ